A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z #

MANGASA lyrics : "Simaro Lutumba"

1) Boni Edi eh
Lelo makanisi ma tambuisi ngai moto
Nakoma komitina tina nini na boyaka yo

Bolingo ezongali ngai
Lelo makanisi ndenge na ndenge nakoma ko regrete
Ndenge nini to kabwana


2) Décision na kanda nangai
Yango ememisi ngai ngambo pamba-pamba

Na koma ko mituna, tina nini na limbisa yo te

4) Na kanisaki, Edi eh

Soki ko kabwana yango ezali solution
Na luka nde mosusu
Oyo ako sala ngai mabe te oh, mama


5) Na pesi yo raison
Tala maloba ozalaki ko yebisa ngai

Na tangi nde basi eh
Sima nayo ba leki mitano eh
Nako suka wapi

Lelo ba mbanda na ngai baninga nangai sanga na nzoto
Yango epesa nga nde botutu
Tika na mona boye


6) Cherie nakanisaki nako bala mosantu
Na sambwe nde ko sambwa

Na suki na elima ngando eh
Na regrete vie nangai
Na kima mbula ngando akima na mokili

Akoti na ebale, oyo ezali solution te

Instrumental


7) Na pesi yo raison
Tala maloba ozalaki ko yebisa ngai

Na tangi nde basi eh
Sima nayo ba leki mitano eh
Nako suka wapi

Lelo ba mbanda na ngai baninga nangai sanga na nzoto
Yango epesa nga nde botutu
Tika na mona boye


8) Cherie nakanisaki nako bala mosantu
Na sambwe nde ko dambwa

Na suki na elima ngando eh
Na regrete vie nangai
Na kima mbula ngando akima na mokili

Akoti na ebale, oyo ezali solution te

Instrumental


9) Na sambwa mama oh, oh
Na sambwa mama oh, oh

Na sambwe oh mama oh, oh

10) Maman na kanisaki nako bala mosantu

Maman na kanisaki nako bala mamiwata
Oyo ako ya sima nayo ako zala fidele
Maman na kanisaki ako zala speciale

Mao na kanisaki ko kabwana ezali solution
Nzoka nakima mbula ekima ngando eh, Mavungu
Na suki maman


11) Na kanisaka tango mosusu buzoba ngai nasala
Na kangaka yo na mobali te kasi okotaka -----

O longola zemi nangai, zemi ya sanza misato
Yango epesaka nga kanda eh
Na zwelaka yo decision

Na sala erreur
Ozalaka mwasi ya vie nangai
Na pusa kanda eh

Tika na mona boye

12) Basi nyoso bazali se ndenge moko eh

Basi nyoso bazali se ndenge moko eh
Mondele to moyindo bazali se ndenge moko eh
Mokuse to molayi oh bazali se ndenge moko eh
Monene to moke oh bazali se ndenge moko eh
Nzambe asala basi nyoso ya mokili se ndenge moko eh

Mwasi akokaka pasi te oh
Kasi atondaka pe bomengo te

13) Ozangi falanga ye a luki oyo azali na ba moyen
Okoti boloko ye aluki oyo azali na liberte

Okei mosika ye aluki oyo azali pembeni eh
Obeli malade ye aluki oyo azali na bonne santé
Soki pe liwa eh
40 jours abali mosusu
Maaa ma ehh


14) Iki oh mama ye, eh
Iki oh mama yo, yoo
Iki oh mama en en


15) Uta to boyana nga ba chance nanga ebeba
Uta to tikana nga etoile nanga ebunga
Uta to kabwana nga mobali nayo na sambwa
Ba oyo na zwa sima nayo ba lakisi nga cinema
Mama na kanisaki ko kabwana ezali solution
Mama na vandi na libala ya moto pasi oh, Mavungu

Na tangi ba mbanda

16) Ba mbanda na biso mibali ba tonda bozoba na lokoso
Ba kanisaka mwasi avandi nangai akomi mwasi ya especiale
Ba kanisaka ezali lo!@$&u ko benga mwasi ya moto ayebana

Ba zelaka se nga na lance bango ba lakisa million

Ta tikela bango mingi
Mingi ba bala misere oh

Bo landaka basi te oh
Bo landaka nde kombo nangai, Mangana na Massiya eh

17) Ngai Patrick mama eh eh

Ngai, Mangasa, na wi eh
Pajora yo témoin oh, ya pasi nangai

Na kanisaki soki gentil ezali malamu eh
Na kanisaki na mokili nazali na binemi te
Mao na kanisaki po to melaka tokoma famille eh


18) Ba oyo na salisaka nzoka bango ba zangi reconnaissance
Mama na tuti nde libaku lituta mambeke oh, bwa Amisi oh,
bango na liyebo

Boko boma ngai pamba ngai Mangasa na lela nde lisano
Likambo na moto te ya Pajota tokei nde ko bina
To bundaka te oh, to swanaka te oh, to boya nde concurrence

Ba kanisaka soki to bimi na mwasi akomi mwasi ya special

19) Ba kanisaka ezali lo!@$&u ko benga mwasi ya vedette
To tikela bango mingi, mingi ba bela ba neur
Ba landaka basi te oh
Ba landaka se kombo na biso, Pajora eh, Mangasa eh


20) Basi nyoso bazali se ndenge moko eh
Basi nyoso bazali se ndenge moko eh
Mondele to moyindo bazali se ndenge moko eh
Mokuse to molayi oh bazali se ndenge moko eh
Monene to moke oh bazali se ndenge moko eh
Nzambe asala basi nyoso ya mokili se ndenge moko eh
Mwasi akokaka pasi te oh
Kasi atondaka pe bomengo te

Submit Corrections